Film oyo elobeli lisolo ya ba communautés agriculaires na Democratic Republic of the Congo oyo, bakutani na mabele ya mabe mpe ba pressions économiques, bazali kopona nzela ya kowumela : agroforesterie ya subsistance. Na kati ya bituka ya Tshopo na Sud-Ubangi, film oyo elandi mobembo ya ba producteurs oyo basangani na kati ya Union des agriculteurs ya Kisangani pona développement (UPDEKIS) na Fédération ya ba producteurs agricoles ya Sud-Ubangi (FEPASU).
Na bilanga na bango, kati na manioko, loso, cacao, mpe banzete ya mafuta, bazali komeka ndakisa ya bilanga oyo na ndenge ya bomoto epesaka mabele elɛngi, ekómisaka mbongo ndenge na ndenge mpe ezongisaka mabota na bango elikya.
Documentaire oyo ya miniti 15 ezali kolakisa makasi ya lisanga ya basali bilanga ya Congo oyo, atako mikakatano ebele, bazali kosala makambo ya sika mpe kobongisa mpo na kotonga bilanga oyo ekoki koyika mpiko mpe ya écologie. Film moko ya Humundi na Enabel, 2025.